Mokambi ya ba “Maï Maï Jakcson” oyo afundama na koboma babateli zomi na libwa ya Parc ya Virunga akangami.
+Biden alaki mangwele milliards moko na molongo na likita lya G7 +Washington epameli Moscou na kotia mangomba ya opposant Navalny kati na badongolo meso +Ba républicains bapameli Kamala Harris nsima na mobembo na ye na Guatemela +Boyokano ya ba Congo mibale bozongeli na Cospeco
Mokambi ya Kinshasa, engumba mokonzi ya RDC, Gentiny Ngobila, azwi bokambi ya Commission spéciale ya Cooperation (Cospeco) na suka ya 22e assemblée générale to likita linene lisalamaki wuto le 8 kino le 9 juin na Brazzaville.
+Philipe II akokende lisusu te na RDC mpo na mibu 61 ya lipanda kasi Tshisekedi akokende kozwa linu lilobama ya Lumumba +BAto baike batelemi mbata moto moko abetaki Macron +17e Roi Makkoko akufi na Brazzaville +Bavandi ba Goma babandi kozongisama
Ekomi ngala ya Sénat kotala moboko ya botamboli ya CENI nsima na Asselbée nationale kolekisa yango. Mingi ya Société civile bandimi mobeko yango te lokola mpe bayi politiki. VOA Lingala ezwaki maloba ya mokambi ya Coalition ya ba Congolais mpo na transition, CCT, Emery Damien Kalwira.
Auguste Numpio, Nkumu mpe mokonzi ya Mbé mpe Bateke akufi na mibu 94 na Congo-Brazzaville, esakoli ba media ya Congo-Brazzaville.
+Tshisekedi azongisi nsima bopesi nkombo ya RDC na maponami na Conseil ya sécurité ya ONU +Tribunal etiki molongani, bokilo mpe bato banso basambaki mpo na liwa lya gén. Kahimbi +Bavandi ba Goma babandi kozongisama malembe malembe +Kassimi Goïta alaki maponami na février 2022 na Mali
Président Félix Tshisekedi andimi kolongola nkombo ya RDC na maponami ya ba membres non-permanents ya Conseil ya sécurité ya ONU.
Bato pene na zomi basambaki mpo na liwa lya général Deplhin Kahimbi, mokambi ya kala ya Misala mya bokengi mya mampinga, DEMIAP, batikami nsima na bosambisami. Kati na bango, mwasi wa ye mpe mama bokilo wa ye.
+Bokanisi ya bitumba ya mikolo motoba kati na Rwanda na Ouganda na Kisangani +Matanga ya mopanzi sango TB Joshua na Nigeria +Iswap esakoli liwa lya Shekau mokambi ya Boko Haram +Koleka bato 200 bakufaki na bitumba ya badongolomeso na Burkina
Moteyi mpe mosali na Nzambe TB Joshua ya Nigeria akufi o'mokolo mwa mposoa na mboka na ye Nigeria, esakoli etonga na ye Synagogue Etonga ya Bikolo binso ya TB Joshua Ministries.
+CEAC esengi na bakonzi ya basoda na Tchad kosala mbulamatari ekosangisa bato mpo na sanza 18 +Facebook ekozongisa compte ya Donald Trump kaka nsima mibu mibale +Nigeria ekangi Twitter mikolo mibale +Ukumbusho ezali kokanisi bobomani na bitumba ya Rwanda na Ouganda na Kisangani
Etat de siège na monyele ekoti na etapi ya mibale nsima Assemblée nationale kondima lobi kobakisela yango mikolo 15. VOA Lingala etunaki na mokambi molandi ya mibale ya Commission ya Bobateli mpe Bokengi ya Assemblée nationale, Jean-Baptiste Muhindo Kisekwa.
Libanda lya mpepo ya Kavumu pene na Bukavu (Sud-Kivu) lifungolami mposo misato nsima na bokangami mbala mibale nsima na botomboki bwa volcan Nyiragongo na Nord-Kivu.
Vague to mbonge ya misato ya COVID-19 esakolami na RDC. Ministre ya Mambi ma Bokolongono, Dr. Jean-Jacques Mbungani alobi motango ya bato bazwami na bokono boye bomati mpe asengi bato komibatela. Couvre-feu ezali kokoba, Kinshasa nde eleki na motango. Totala bilili bya ministère ya Santé
+Guterres apameli bobomi ya bato koleka 55 na Boga na Tchiabi +Biden alobi akotala soki esengeli kozongisa bitumba bayi Russie basala na internet na compagni JBS +Mampinga ma USA bandimi ete mabomaki bacivili 23 na mokili +Sassou asengi kimya kati na Centrafrique na Tchad
Assemblée nationale endimi kobakisa mikolo 15 nsima na maponami masalami jeudi na ndako ya mosala na bango, na Palais du peuple, na Kinshasa,
Kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres apameli bobomi ya koleka bato 55 na bisika bato bakimaki bitumba bazalaki, o’mokolo mwa eyenga, na mboka Boga mpe Tchiabi, na Ituri.
Denis Sassou N’Guesso, président ya Congo-Brazzaville mpe mokambi ya CEEAC lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya kati kati asengi na bakonzi ba Centrafrique mpe ya Tchad kokitisa mitema mpe kozala kimya nsima na bobomi na basoda ba Tchad.
https://www.facebook.com/voalingala/videos/146205104226451
Voir plus