Bato batamboli na Bukavu na Sud-Kivu mpo na kotelemela bowangani ya president Paul Kagame ya Rwanda ete bobomami bosalama mpe bozali kosalama na RDC.
Banganga mayele bakendaki kotala likolo ya volcan Nyamuragira epayi bakuti moto kasi pototo ya moto te. Ezali nanu kosala kasi etomboki te. Nyamunagira ebangamaka leki ya Nyiragongo oyo etombokaki le 27 mai 2021 mpe ememamki bokimi ya bavandi ya Goma, engumba ezali na nse na yango.
+OCHA epameli bobomi ya bato koleka 55 na Ituri +Gbagbo akozonga Côte d'Ivoire le 17 juin nsima na mib 10 +Likama lya mbalakaka lizali te mpo gaz ya lac Kivu elobi misala ya botali Environnement ya Rwanda +Liwa lya Kitenge Yesu
Martin Fayulu na Adolphe Muzito, ngambo moko ya lingoma Lamuka, bakebisi ete Assemblée nationale ezali komilengele kolekisa na lombango mpe na kobombama "loi organique" mobeko moktambwi CENI ntango mboka ememami nanu na makomba matali likama lya volcan Nyiragongo.
Nzoto pene na tuku 54 esi elokotami nsima na bobomi ya basimba minduki basali butu boleki na chefferie mibale, Boga na Tchabi, na Ituri. Baike bafundi ba ADF na bobomi yango kasi basusu batangi Banyamwisha. Bolayi na Chrsitne Abeditho.
Kitenge Yesu akufi. Molakisi elongi ya lokumu ya président Félix Tshisekedi akufi lelo na Kinshasa na mibu tuku sambo na sambo.
+Cédéao etelemisi Mali nsima na Cour constitutionnelle kondima colonel Goïta bo' mokonzi +Bavandi ba Goma baike babandi kozonga ata bakonzi bapekisi +Bana baike bakangami na basimba minduki na état ya Niger na Nigeria +Zamalek elongi BAL ya yambo na Kigali
Zamalek ya Egypte elongi Basketball Africa League (BAL) ya yambo na kobeta US Monastir ya Tunisie (76-63) na finale na Arena Kigali, na Rwanda
Police epanzi balandi ba UNC, lingomba lya Vital Kamerhe, mokambi ya kala ya ndako ya mosala ya president Felix Tshisekeid.
+Musevengi na Lutundula batie manzaka mpo Uganda etonga ba nzela na DRC mpe mpo na bokengi, bobateli +Etumbu ya liwa esengami mpo na molongani ya nkondo Delphin Kahimbi na bosambisami +Paul Put coach ya ba Diables Rouges mpo na mibu mibale +Bakonzi basengi na bavandi ya Goma bazonga nanu te
Mokambi ya soda na Nord-Kivu, Lieut.Gén. Constant Ndima Kongba ayanolaki na mituna ya VOA Lingala. Alimboli misala mya bobateli bavandi ya Goma na botomboki ya volcan Nyiragongo mpe alobi ndenge mampinga bazali kokoba bitumba mpe état de siège. Totala.
Milulu mya botiami manzaka na boyokani kati na Ouganda na RDC mpo na kotonga ba nzela na Congo mpe bokengi misalaki jeudi na Kampala.
Equipe nationale ya Congo-Brazzaville ya lisano lya ndembo ekokambama sika na Belge Paul Put, elobi Fédération congolaise ya footabll (Fecofoot).
Litatoli lya mopanzi sango Fiston Isemwami.
Observatoire volcanologique ya Goma elobi volcan ekoki kosala eruption limnique to ekoki kobwaka moto mpe kosangana na ba gaz eye ezalaka wuto mibu mingi na lac Kivu.
Wuto ntongo ya jeudi 27 mai 2021, bavandi ya ba quartiers baike bazali kotika engumba eye mpo na kokende na Rubavu, na Rwanda to Sake na bobangi botomboki ya volcan Nyiragongo. Totala.
+Marcon amikitisi mpe andimi mokumba ya France na mobembo mwa ye na Rwanda +Basoda batiki président na PM ya transition kasi bayi mampinga batikali na bokonzi na Mali +Zuma awangni ete apengwisaki misolo ya mampinga +Trump alobi bazali kolukela ye makambo na kofunda ye mpe compagnie na ye
Président Emmanuel Macron alobi amikitisi mpe andimi mokumba ya France na bobobami na Rwanda epayi wapi azali jeudi 27 mai 2021 mpo na mobembo wa ye ya yambo na mboka eye. Akutani na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame.
Ndako mingi ekweyi na Goma epayi wapi mabele mazali kokoba koningana nsima na botomboki ya volcan Nyiragongo samedi. Observatoire volcanologique ya Goma elobi koleka 253 koningana esi esalami mpe ezali kokoma ti na Rwanda. Totala.
Président Félix Tshisekedi atie bakonzi mwambe ya police na bibonga ya ba maires to mindele mboka na balandi ba bango na Nord-Kivu mpe Ituri.
Voir plus