+Biden na Poutine balindi bakitisa matata +Ba FARDC babomi 42 CODECO na Djugu +UNC esengi na ba députés na yango kotelemisa misala mya bango na CACH na Union sacrée +Boloko ya libela bosengami mpo na Soro na Côte d'Ivoire
UNC esengi na bakeli mibengo mya bango kotelemisa misala mya bango na makita ma CACH mpe Union sacrée, nsima na etumbu ya mibu 13 ya misala ya makasi ekatelamaki Vital Kamerhe.
Président Joe Biden ya Etats-Unis na mokokani wa ye ya Russie Vladimir Poutine bakutani na masolo na Genève, na Suisse. Basololi na makambo mingi.
+Bokutani ya Biden na Poutine lelo na Genève +Bayi UNC balaki kozwa mokano nsima na ekateli ya mibu 13 mya misala makasi na Kamerhe +ACAJ epameli Sénat na koboya kolongola bobateli ya Matata na Kamondji +Ba Léopards ya basi na Handball balongwe na 1/4 na kopola 20-29 na Angola
Bato basato bakufi na likama lya mpepo moko ekweyi na bomati bwa yango na libanda lya mpepo lya Kavumu, pene na Bukavu, na Sud-Kivu.
Vital Kamerhe, motambwisi ya kala ya ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi, akatelami mibu 13 na bosambisami ya bozongeli na Cour d’Appel ya Kinshasa/Gombe.
Comédienne to mosali théâtre ayebana na nkombo ya "Mama Shako" awei lelo. Lingomba lya basali Theatre epesi sango yango.
+Sous-secrétaire Lisa Peterson ya USA azali na masolo na bayi RDC mpo na mamponami ma +Centre Carter esengi na mbulamatari ya Sama kosala ete ba mines ebanda kobongoloma na RDC +Assemblée nationale ekojende te na loyi mpo na kotalaka état de siège +OTAN elakisi bomoko na USA liboso ya Russie
Assemblée nationale ekokoba mosala mwa yango mpo na kotala mambi matali état de siege. Esengalaki ekende na loyi lobi lokola Sénat nsima na session ya mars.
Masolo mpo na démocratie mpe maponami na ngonga mpe na ndenge esengeli, mazali kati na linaka Sous-secrétaire adjointe ya USA lisa Peterson akozala na yango na mobembo azali kobanda lundi na RDC.
Mbonge ya misato ya COVID-19 eye ezali kongola na RDC, ekoti mpe na Parlement. Mingi mingi na Sénat, elobi bakambi ya parlement.
Bokono Kenneth Kaunda azali kobela boyebisami te, kasi amemamaki na lopitalo ya ba soda Maina Soko Medical Center na Lusaka, engumba mokonzi nsima na kozwa nkwokoso.
+Biden azali na likita na OTAN na Bruxelles, lobi akozala na UE mpe mercredi na Poutine +Benjamin Netanyahu alongwe Ministre wa Yambo ya Israel Nafatali Bennet nde azwi esika +Zuzi moko abwakisi bofundi ya basali batelemeli bopesi bango mangwele na lotomo na lopitala na Texas +Copa America
“Koko” Swing, ambassadeur ya kala ya Etats-Unis na Kinshasa mpe mokambi ya kala ya MONUSCO akufi, esakoli ntoma ya USA ya ntango eye ya Amerika na RDC.
+G7 ekutani mbala ya yambo miso na miso mpe elingi etinda mangwele milliards moko na bikolo ya nkita moke +Washington elaki kokoba kosunga bitumba na ba dongolomeso na Sahel ata France esukisi Barkhane +ECC na CENCO basepeli te na mabongisi ya CENI parlement endimi +Bemba akebisi ba bokabwani
Linu lilobama lizali ya Patrice Emery Lumumba, Ministre wa Yambo ya yambo na RDC, likozonhisama lisusu na Kinshasa le 21 juin kowuta na Belgique, lokola elobamaki.
Etats-Unis elaki kokoba kosunga bitumba na dongolomeso na Sahel ata France elobi esuki opération Barkhane.
B’Episkopo ya katoliko na CENCO mpe Eklezia Mission to ECC bapameli Assemblée nationale na Sénat na kobwakisa makanisa makolongola loboko lya bayi bolitiki na misala mya maponami.
+Jaynet Kabila elongwe na bokambi ya Commission Sécurité mpe Défense ya Assemblée nationale mpe Mbubonsi nde azwi esika +Commission européenne epesi losako na bokangami ya Muhunkambuto afundama na koboma ba écogardes 19 +Ass. Nat. ezali kotala bolongoli ya ba immunaités mpo na Bukanga
Jaynet Kabila, lipasa ya mokonzi ya kala Joseph Kabila alongwe na bokambi Commission ya Bobateli mpe Bokengi (Défense et Sécurité) ya Assemblee nationale. Bertin Mubonzi ya UNC nde atiami na ebonga yango.
Voir plus