Balandi zomi na sambo ba Lamuka mpe ECIDE batikami mokolo moko nsima na bokangami na liboso lya Aseemblée nationale epayi bazalaki na milulu ya kotelemela mabongisami ya mobeko mokokamba CENI mondimamaki mposo moleki na Parlement.
Constant Omari, mokambi ya Fécofa (Fédération congolaise ya football association) apekisami misala minso ya lisano lya ndembo mpo na mobu moko. Ezali etumbu epesameli ye na bondimi na ye moko.
+Biden apesi ebonga ya ntoma ya Amerika na FOA, na Rome, molongani ya nkondo John McCain +SADC endimi kotinda mampinga kosunga Mozambique na bitumba na badongolomeso +Balandi Fayulu (Ecide na Lamuka) bakangemi na botelemeli mabongisami ma mobeko ya CENI +John McCafee akutami akufa nsima na boloko
+Bakambi ba SADC bazali na likita na Maputo mpo badongolomeso na nord ya Mozambique mpe na RDC +Ba touristes 10 ya Russie bazwami na bisika ya bitumba na nord ya Tchad +Russie efundi Etats-Unis na Royaume na cyberattack na misla mya maponami mya yango +Gabon ezwi 10 millions $ ya CAFI ya nzamba
Basimba minduki 134 babimaki o’nzamba mpe bamizongisi na mampinga na bibundeli na bango na Kitchanga, na Nord-Kivu. Mokambi ya soda ya etuka, lieutenant-général Constant Ndima Kongba azalaki wana, bolayi na Erikas Mwisi.
+Ramaphosa alobi Afrique du Sud ekozala mboka ya yambo ya Afrika ya kobanda kosalaka mangwele ma COVID-19 +Xi Jimping alobi Chine endimi kokende na bozindo na boyokani na Congo-Brazzaville +Etat de siège ebakisami mikolo 15 +Gbagbo azo'kabwana na Simone Gbagbo
Président Félix Tshisekedi abakisi mikolo zomi na mitano na état de siège na bituka ya Nord-Kivu mpe ya Ituri.
Laurent Gbagbo, président ya Côte d’Ivoire, akbwani na mwasi wa ye Simone Gbagbo, elobi avocat na ye.
M. Muhima oyo akatelamaki etumbu elongo na Vital Kamerhe mpe Samih Jammal na bosambisami mpo na misolo mya misala mya mikolo nkama ya président abimi boloko.
CENCO, Conference epicopale nationale ya Congo epamali mabongisi ma mobeko ma botambwisiami ya CENI (misala mya maponami), mabongisi maye mandimaki mposo mololeki na suku mibale ya Parlement. B'episkopo ya katoliko bazali kozela sika "loi électorale". Totunaki molobeli abbé Donatient Nshiole.
President Denis Sassou N’Guesso na Xi Jimping, mokokani wa ye ya Chine, bandimi kotinda na ba experts ya mbulamatari mibale likambo lya kozongisa nsima bofuti nyongo ya Congo-Brazzaville.
+Dr. Muyembe akoti lopitalo mpo na COVID-19 +Bikolo bya ZLECA basengi bokelami bwa système ya kofutama misolo na Afrika +USA elingi ebakisi etumbu na Rusie mpo na opposant Navalny +Maponami na Ethiopie kasi Tigré
Le 20 juin, Mokolo ya ba Réfugiés na molongo. VOA etindaka ba photojournalistes 75 mpo na kozwa masolo ya ba réfugiés to baye bakima mboka na bango, mingi mingi mpo na bitumba. Ezalaki le 20 juin 2019, mokolo moko yambo bokono bwa COVID-19 bosakolama na mokili. Tala film na voanews.com/refugees.
+USA ekitisi motango ya mampinga mpe makoki ma défense anti-aérienne na yango na Moyen-Orient +B'episkopo ya USA bakomi mokanda mpo na kopekisi ukaristia na ba politiki bandimaka bato balongola zemi +Boko Haram endimbi liwa lya mokambi lya yango Abubakar Shekau +Mobembo ya Lisa Peterson na RDC
Boloko ya libele bosengami mpo na Paul Rusesabagina oyo ayebana mpo na atiama na film "Hôtel Rwanda' bo'moto asungaka bato mingi ntango na génocide na Randa na 1994.
Assemblée générale ya Nations unies endimi ete Antonio Guterres atikala na bokambi ya Nations unies na mandat ya mibale ekobanda na 2022 kino 2026.
+Guterres, Tshisekedi na bakonzi basusu bapesi losako na Kenneth Kaunda nsima na liwa lya ye +Sassou na Xi Jimping basololi +Esengo na Côte d'Ivoire na bozongi ya Gbabgo +Tubilandu akufi
Kenneth Kaunda, mokonzi wa yambo ya Zambie akufi na mibu 97 na mboka na ye nsima na kokota lopitalo mikolo misato mileki.
Président Félix Tshisekedi akomi na Bunia, na Ituri, na butu. Kasi yambo na yango azalaki na Butembo, na Nord-Kivu, mpe akebisaki mpo na mbonge ya misato ya COVID-19, epayi aleki nsima na kozala Beni.
Dimbi Tubilandu gardien de buts to moyambi ya kala ya ba Léopards mpe Vita Club abengamaka Grand Niawu akufi butu boleki na mibu tuku sambo na misato.
Voir plus