Président Denis Sassou N’Guesso asengi ete CIRGL, likita lya bikolo bya etuka ya Grands Lacs, etikala esika ya boluki biyano na matata ya ekolo Centrafrique. Alobi yango na bokutani bwa bakambi ya bikolo bya CIRGL bobandi lelo na Luanda. Bililingi bya présidence ya Congo-Brazzaville.
+Bato banso bakozala na likita linene lya ONU lya mbala 76 basengami kozwa mangwele ma COVID-19 +Ndako monene ya poste eziki na Bukavu +ONU elongoli basoda 450 ya Gabon na mampinga ma kimya na Centrafrique na kufundama na kozwa basi na makasi +ONU esengi boyokani mpo na barrage ya Renaissance
Police epanzi balandi ba Lamuka bamekaki kotambola na Kinshasa mpe na bisika misusu na RDC. Bato baike bakangami, batemaki mpe babotolami biloko bya bango. Kati na bango bapanzi sango baike lokola Patient Ligodi, nkolo na media en ligne Actualite.cd Stanis Bujakera azwaki litatoli na M. Ligodi.
Police epanzaki bato, ekangaki baike mpe ebotolokaki biloko na botamboli Lamuka na mangomba misusu babengisaki mercredi na Kinshasa mpe bisika misusu mpo na kosenga bonsomi ya CENI mpe maponami na 2023. Totala.
+Police epanzi balandi ba Lamuka bamekaki kotambola na Kinshasa mpe bisika misusu +Dr. Eteni Longondo abimisami bolko +Mindule ya Werrason na Zenith mipusani le 25 septembre +José Eduardo dos Santos azongi Angola nsima mibu mingi
Mokonzi ya kala ya Angola abimaki mboka na ye nsima na kotikela bokonzi na Joao Lourenço na 2019.
Dr. Eteni Longondo, moyi UDPS lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi mpe ministre ya kala ya Bokolongono abimisami mpo na mwa ntango na boloko ya Makala (CPRK) to azwi liberté provisoire, elobi basembeli baye.
Mokambi ya police ya Kinshasa, Commissaire divisionnaire adjoint Sylvano Kasongo, alobi marche ya Lamuka etindami vendredi. Alaki kokanga baye bakomeka. Martin Fayulu ya ECIDE mpe moko na bakambi ba Lamuka alobaki mardi ete marche ezali mercredi. Totala
+Botelemisi misala wuto lundi na Beni mpo na kosenga bokengi mpe kimya +Tshisekedi azwi mangwele ma COVID-19 mpe alobi ezali eyano +Général Mahamat Idriss Deby azali na Qatar na Emirats arabes unis
Bavandi ya Kitutu, na Mwenga, na Sud-Kivu, batambolaki lundi mpo na kopamela bobimisi makele na moyibi mpe mbeba misusu na misala ya ba Chinois. Nzokandep résident Félix Tshisekedi asengi bobandeli kotala ba contrats na ba Chinois.
ONG “Publiez ce que vous payez" epameli ndenge misala mya botongi mapitalo na Cong-Brazzaville mikomi na suka te wuto 2019.
+Moto moko akufai na mpe mosusu azoki na bobeti ya bombe artisanale moko na Beni +Corée du Nrd emeki missile ya crisière mpe ekendaka mosika +Ramophosa atie passeport ya mangwele ma COVID-19 na Afrique du Sud +Basoda bakobanda masolo mpo na kosala mbulamatari lobi
+Biden asengi bomoko na milulu mya bokanisi mibu 20 ya ba attaques ya le 11 septembre +Dr. Mukegwe asengi Tshisekedi koluka botindami ya baluki mpo na mbeba na RDC +UA etelemisi mpe Guinée na misala mya yango +Mangwele ma COVID-19 makomi lotomo na Congo-Brazzaville
Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya Kimya na 2018, asengi bokelami ya tribunal pénal international mpo na RDC.
Koleka bato nkoto moko na nkama mibale bakufaki na koboma mobu moye na bituka mibale, Ituri na Nord-Kivu, elobi HCR, misala mya molongo mpo na bakima bitumba.
+Limpinga lya ba Forces d'opérations spéciales ya USA lisilisi mosala na yango na RDC +Ba états généraux ya ESU ebandi na Lubumbashi +Ba ONG 38 basengi Tshisekedi kosukisa misala mya mombongo basimba minduki basalaka na parc ya Virunga +Jean-Paul Belmondo alelami na Paris
38 ONG ya environnement mpe makoki ma bomoto basengi na présient Félix Tshisekedi mpe mbulamatari ya RDC kosukisa misala mya bokati nzete mpe koni, kosala makala mpe bokila basimba minduki basalaka na parc ya Virunga kati na bituka ya Kivu.
+129 bato bakufi na méningite na Banalia, na Tshopo +CEDEAO etindi limpinga kosenga basoda kobimisa Alpha Congé na Guinée +Unicef eponi Lokwa Kanza bo' ntoma na RDC +Zuzi ya Guantanamo andimi ete bakengemi bafunda CIA
Bakonzi ba bikolo kati na CEDEAO (lisanga lya nkita mpe ntombwa ya bikolo bya Afrika ya ouest) basakoli ete batelemisi Guinée na misala mya lisanga na bango nsima na basoda kobotola bokonzi mpe kokanga présiende Alpha Condé.
Bato nkama moko na tuku mibale na libwa bakufi na bokono bwa Méningite bozali kongala na Banalia, na kilometele nkama moko na tuku mibale na mitano ya engumba Kisangani, na etuka ya Tshopo, esakoli mbumalatari ya Ekolo Congo démocratique mpe OMS.
Voir plus