+Basoda babotoli bokonzi babimisi bato batelemelaki Alpha Condé na boloko +Boyokani misato bosalami na mobembo ya Tshisekedi na Turquie +Basoda babale bakufi na masasi ya bayi Burundi na lac Tanganyika
Basoda babale ba RDC bakufi na bodongwani na baye ba Burundi na ndelo kati na bikolo mibale na lac Tanganyika, elobi mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC).
+Département d'Etat ya USA epameli mobulu na Guinée mpe esengi botosi ya Buku Likonzi mpe masolo na mboka +Libye ebimisi na boloko mwana ya Mouammar Kadhafi, Saadi Kadhafi +Pélé azwi lipaso ya cancer ya colon +Guidon Shimiray mokonzi ya NDC-R alobi nanu amizongisi te na ba FARDC
+Ba ministres ya mbulamatari ekweyisami ba babengisami na Assemblée nationale na Guinée +Tshisekedi, Faki na Guterres basengi botikami ya Alpha Condé na Guinée +Ntoma ya Chine asengi mboka na ye elendela moyibi ya ba mines na RDC +Tshisekedi azali na mobembo na Turquie
Basoda bakangi président Alpha Condé mpe batelemisi Buku likonzi na ba institutions. Basoda bango nde babimisi bililingi biye. Alpha Condé na mibu 83, abongolaki Buku likonzi mpo atikala na bokonzi. Akota na bokonzi wuto le 21 décembre 2010. Totala.
+Fayulu na Muzito bakebisi ete recensement ekolekisa ntango ya maponami na 2023 +Koleka bato 20 bakufi na bokweyisami ya train kati na Kisangani na Ubundu +Ba FARDC balekisi mituka 235 na nzela ya Irumu epayi ba ADF batumbaki mituka misusu +Variant Delta ezo' pesa mpasi mingi te na bilenge
+UE ekozongisama na Afrika mangwele 200 millions ya Johnson & Johnson ekelamaki na Afrique du Sud +Chine epameli moyibi ba mines na RDC mpe esengi enquête +Batalibans balobi bakufi babundi mingi na bitumba na mangomba misusu na Afghanistan +UPADS ekokisi mibu 30 na Brazzaville
Ambassadeur ya Chine, Zhu Jing alobi mboka na ye epameli moyibi ya ba mines na RDC mpe esengi ba enquêtes ya malamu. VOA Lingala epesaki maloba na mokambi ya ACAJ (Association congolaise pour l'accès à la jusitce), Me Geroges Kapiamba oyo asengi bokangami ya ba Chinois mpe bobengani na bango.
+FARC elobi esikoli bato 70 ya baye ba ADF bamemaki na Mafifi, na Ituri +Etumbu ya Jacquie Ndala ya Ensemble ekitisami na sanza 22 ya boloko +ACAJ esengi bobengani ya ba Chinois banso bazali na bobimisi ba mines na moyibi mpe enquête +Afrique du S elobi ekoki te koyamba ba réfugiés ya Afghanistan
Mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) masakoli ete masikoli bato 70 bamemaki na basimba minduki ya ba ADF na mboka Mafifi, na Ituri, elobi mbulamatari mpe na FARDC.
Bakonzi ya biteyelo babale bakimi na misolo ya bana kelasi (frais d’inscription) mpe balakisi babale bakangami na kokosana ete bazali bana ba kelasi mpe kosala examen d’état na esika ya ba élèves na Sud-Kivu, elobi bakambi ba inspection ya biteyelo.
+USA esukisi kobimisa bato na Afghanistan +Washington elongoli ambassade na yango na Kaboul kasi ezali kotala soki ba Talibans bakotosa malako ma bango +Ass. Nat. endimi kobakisa mikolo 15 na état de siège +Likambo lya Bukanga Lonzo litangami na Cour constitutionnelle
Bakeli mibeko ya Assemblée nationale na motango ya koleka, bandimi kobakisi mikolo na état de siège mpo na mbala ya sambo na kopona basalaki lelo. Kasi baike bazali kati na nungu nungu.
Lingomba Etat islamique-K to DEASH-K endimi ete yango nde ebeti ba roquettes motoba na libanda lya mpepo ya Kaboul, mokolo moko yambo na suka ya bobimisi bato Etats-Unis ezali kosala na Afghnistan kolanda bokweyisami ya mboka.
Bayekoli baike bapanzi mpe batie moto na bureau ya Sous-division ya Enseignement primaire secondaire mpe technique (EPST) ya Manono, na Tanganyika, nsima na bobandi ya momekano ya examen d'Etat.
+USA ezali kosala bolukiluki nsima na kobeta wuto likolo motuka moko mozalaki kopusana na aéroport ya Kaboul +Likita lya ba ministres ya AE ya bikolo biike na visioconférence mpo na kotala bobimisi bato na Kaboul +Garde du corps moko abomi commandant second ya Légion ya intervention rapide ya PNC
Président Yoweri Museveni apameli batomboki ya ba ADF na koluka kosala attentat na matanga ya moko na bakambi ba mampinga ma Ouganda général de division Paul Lokech, elobi AFP.
+Eteni Longondo alekisi butu bwa ye ya yambo na CPRK na bofundami mpo na misolo mya COVID-19 +Museveni apameli ba ADF na koluka kosala attaque na matanga ya gén. Lokech na Ouganda +Tshisekedi asengi ete nkisi mpe mangwele masalamaka na mboko moko mpo na COVID-19
Dr. Eteni Longondo, ministre ya kala mambi ma Bokolongono alekisi butu bwa ye ya yambo na boloko bonene ya Makala (CPRK) epayi wapi atindamaki vendredi na mpokwa nsima na koyanola na parquet ya Cour ya cassation mpo na misolo mya COVID-19.
Joe Biden alaki ete USA ekozongisa nsima ba attentats mibale eye ememi kufa ya kati na bato 13 mpe 20 na libanda lya mpepo ya Kabul (Afghanistan), epayi wapi bato mingi bazalaki kozela komemama libanda lya mboka. Lingomba état islamique ISIS-K endimi ete esali yango.
Voir plus