Jean-Marc Kabund, vice-président ya yambo ya Assemblée nationale, abenganami na UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, azalaki kokamba mpo na mwa ntango wuta nsima na maponami ma 2018.
➡️ Biden alaki président ya Ukraine ete Etats-Unis ekokotela ye soki Russie etindi mampinga ma yango ➡️ Biden alaki kotia zuzi ya mwasi mpe ya mohindo na Cour suprême ➡️ Bato 77 bakufi na mpela tropical Anna na bikolo bya Afrika ya nse ➡️ Parlement esengi Ramaphosa koyanola na misolo mya l'Etat
➡️ Etats-Unis etindi limpinga ya bayi bokengi na masolo na bakambi ba RDC ➡️ Ba M23 babomi ba FARDC koleka 25 na Nyesisi, na Virunga ➡️ ONU ebakisi etinda na yango na Libye kino le 15 septembre mpo na maponami ➡️ Bikolo bikobeta ba 1/4 ya finale ya CAN samedi na dimanche na Cameroun biyebani
➡️ Cour internationale ya justice ekopesa ekateli na yango le 9 février na matata kati na RDC na Ouganda ➡️ Bokundami ya Clément Mouamba, ministre wa Yambo ya kala ya Congo-Brazzaville lelo ➡️ Biden akebisi kopesa Poutine etumbu mpo na Ukraine
Misala mya sembo na Bruxelles misengi mikanda mya bolukiluki ya parlement ya Belgique mpo na koluka pole na bobomi ya Patrice Emery Lumumba, ministre wa Yambo ya yambo ya Ekolo Congo démocratique.
Haute Cour militaire ebwakisi bosenga ya bafundi ya komona mokonzi ya kala Joseph Kabila na bato basusu batangami na bobomi ya Floribert Chebeya na Fidèle Bazana koyanola na bazuzi.
Benoit Lwamba Bintu mokambi ya kala Cour constituionnelle akufi lobi loleki na mibu ntuku motoba na motoba na Bruxelles, na Belgique. Sango yango epesami na liyebisi ya Cour consitutionnelle.
Cédric Bakambu, mobeti ndembo ya Ekolo Congo démocratique andimami mpo na kobeta na Olympique de Marseille ya France, esakoli club ya division 1 ya ekolo France eye.
Bayi Rwanda pene na nkama bakimaki na esanga to ile Idjwi mpo na koboya mangwele mboka na bango ezali kopesa na lotomo, bazongisama na Rwanda, elobi bakambi ya esanga Idjwi.
Haute cour militaire elaki kopesa eyano na bafundi to ba parties civiles mercredi ekoya na bosenga na bango ya komona mokonzi ya kala Joseph Kabila na bato basusu batangami na bobomi ya Floribert Chebeya na Fidèle Bazana, kosamba.
Bato zomi na libwa bakufi na moto mopelaki na ndako moko ya ba étages zomi na libwa esika bayi Afrika bavandaka mingi. Eddy Isango abengaki na New York mobanzi sango Sylvie Kibambe.
Commissaire Supérieure adjointe ya police ya Kinshasa, Carine Lokeso akatelami misala makasi ya libela na mibu zomi ya boloko miye mikoki kokitisama te na bosambisami mpo na bobomi ya mobundi ya makoki ma bomoto Rossy Mukendi Tshimanga.
➡️ Bato koleka 19 bakufi na moto na immeuble moko na New York ➡️ Mokolo ya mibale ya CAN Cameroun 2022 ➡️ Matata na masolo ya USA na Russie mpo na Ukraine ➡️ CEDEAO etie Mali na embargo
➡️ Ba Léopards basili stage na bango na elonga 2-0 likolo lya ba El Misr Makkasa na Egypte ➡️ Bayi Congrès bandimi bango banso mbongwana ya Buku Likonzi na article 157 na Congo-Brazzaville ➡️ Biden alobi COVID-19 ekotikala te na makasi na yango
➡️ Trump alobi Biden azali kobonga bolembu na ye na kotingamaka na eyoma ya le 6 janvier 2021 ➡️ Biteyelo mingi bizongeli kasi na Internet na Etats-Unis ➡️ Cour suprême ya Eats-Unis ebandi kotala likambo kotinda bato banso kozwa mangwele ma COVID-19
➡️ Biden apameli Trump na eyoma esalamaki le 6 janvier 2020 na Congrès ntango ya bondimami ya elonga ya maponami ➡️ USA ekebisi Moscou ete masolo mpo Ukraine mazala matala soki Russie lingi kokota na Mboka eye ➡️ FARDC ekangi bato babale mpo na bombe na Oicha ➡️ Messi abiki na COVID-19
Bakonzi ba RDC batindiki lisusu na juin milulu mya bozongisami wuta Belgique ya bitiki ya nzoto ya nkondo Patrice Emery Lumumba, ministre wa Yambo ya yambo ya mboka.
Mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) masakoli ete makangi bato babale mpo na bombe ebetaki na wenze ya Oicha, territoire ya Beni, na Nord-Kivu.
4 janvier 1959- 4 janvier 2022: Mibu ntuku motoba na misato (63) mikoki wuto ba martyrs ba lipanda bakufaki na Kinshasa .Tolanda reporatge ya André Ndambi etangami na Eddy Isango
➡️ Kamerhe akomi Chicago (Avocats) ➡️ Ekateli ya bosambisami ya liwa ya Rossy Mukendi epusami le 10 janvier ➡️ Moto mozengalaki lisusu na parlement ya Afrique du Sud
Voir plus