Roger Ntabuka, mokambi ya chefferie Ntabuka alobi ete bayi Rwanda banso bakotaki na ndenge ya mayuya bamemami na mboka ya ngambo ya Rwanda.
Bazalaki nkama moko na moko mpe baboyaki kozonga kasi bamemamki na kasi, ebakisi mokambi oyo.
Na ngambo na yango, mbulamatari ya Rwanda elobi na liyebisi ete bato bakimaki mingi mpo na ntina ya bondimi na bango kasi bazongisami na boyokani na Ekolo Congo démocratique.
Bakonzi ba Rwanda balaki kopesa bango mateya malamu mpo etali mangwele.
Mokambi ya société civile na Idjwi, Esther Muratwa, ayebisaki AFP ete ezalaki bayi Rwanda 123.