Motango ya bawei mokomi zomi na mitano na botomboki ya volcan Nyiragongo pene na Goma, na Nord-Kivu. Libwa bakifaki na likama lya motuka ntango bazalaki kokima na Sake, banei bazali bakengemi balingaki kokima boloko ya Munzenze, mibale bazikidamki mpe mapasa mabale nsima na kobotama.