Bavandi ya Beni bakotaki nzamba na makwangola mpo na koluka batomboki ya ba ADF nsima na batu 25 kokufa na Beu Manyama-Moliso, kasi bamonaki ata moko te. Nzokande ba FARDC, mampinga ma RDC, balobi babomi ba ADF 8. Erikas Mwisi atunaki molobeli ya FARDC, lieut. Antony Mwalushay.