Sénateur Matata Ponyo apameli lolenge apekisami kobima mboka mpo na koluka lisalisi nsima na kokutama na poison na nzoto na ye na sanza ya juillet.
Limpinga lyoko lya Forces d’opérations spéciales ya Etats-Unis likotindama mikolo mikoya mpo na kosunga limpinga lya RDC libundisaka bandongolomeso ya ADF mpe mpo kosunga ba bateli ya parc ya Institut congolais ya conservation ya nature ICCN.
+Mbulamatari ya Congo-Brazzaville ebakisi mikolo 20 na état d'urgence sanitaire +Carburant ekomi mpasi ba Brazzaville +Kinshasa ezali na likama nsima na mayi kobebisama na Kwilu mpe Kasaï +Matata Ponyo apameli bopekisameli ye koluka lisalisa libanda ata azwamaki na poison na nzoto
Molobeli ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique, lieutenant Anthony Mwalushayi asakoli ete ba FARDC babomi batomboki 45 ya ba ADF (Forces démocratiques alliées) na Mwalika. Na sud ya Beni, esika babombamaka.
+Sit-in ya ba mouvements liboso lya Assemblée nationale mpo na bonsomi ya CENI + Soudan elaki kotinda Omar el-Béchir na CPI +Ramaphosa andimi ete kaniaka ezalaki mingi na bokonzi ya Zuma +Ramazani alobi PPRD ekotinda te balakisi bilongi na CENI na bozangisi boyokani
Bakonzi ba Soudan basakoli ete bakotinda na Cour pénale internationale (CPI) mokonzi ya kala Omar el-Béchir elongo na bakambi basusu babale basengamaka wuto koleka mibu zomi mpo na "génocide" mpe mbeba ya bomoto na Darfour.
Cyril Ramaphosa, mokonzi ya Afrique du Sud, atatoli ete kaniaka ezali mpenza mingi na bokonzi yango. Alobi yango liboso lya Commission ezali kosala bolukiluki likolo na bopengwisi misolo na bokonzi ya Jacob Zuma.
Lionel Messi alakisami mercredi na balandi ba Paris Saint-Germain nsima na boyokani na bango. PSG na Messi bayokani mpo na mibu mibale kasi mosusu ekoki kobakisama.
Paris Saint-Germain elaki kolakisa Lionel Messi na baot mercredi nsima na botiami manzaka ya boyokani to contrat kati na cluba ya Paris na mosani ya ndembo. Milulu myango mikosalama na auditorium ya parc de Princes. Totala.
Gouverneur ya état ya New York Andrew Cuomo atiki mosala nsima na kofunda ntango molayi na kotungisa basi mingi. Koleka basi zomi na moko bafundaki ye na kotungisa bango ata assistane na ye kutu afundaki mpe mposo moleki.
Bayi lingomba Etat Islambique basakoli ete babotoli mboka mibale ya ba kristu na Ituri nsima na bitumba, kolanda Agence ya sango AMAQ to SITE.
Lionel Messi akomi na Paris epayi wapi ayambami na bituluku bya balandi ba club Paris S-G eye ezali na masolo na ye nsima na kokabwana na FC Barcelona na Espagne. Tata na ya alobi masolo mazalie malamu. PSG elaki kolakisa Messi mercredi na bato banso na milulu na auditorium ya Parc des Princes.
+Matata abengisamaki lisusu lelo na Cour constitutionnelle mpo na Bbukanga Lonzo +Lingambo Etat islamique elobi ebotoli mboka mibale ya ba kristu mpe basoda mingi bakufi na Ituri +Etumbu ya liwa ekatelami mpo na policier Kalenga oyo abomaki mokonzi na ye na masasi na contrôle ya masque +Rwandais
Sénateur Augustin Matata Ponyo, Ministre wa Yambo ya kala ya RDC, ayonali na Cour constitutionnelle mpo na likambo lya parc agro-industriel ya Bukangalonzo na Kinshasa. Mpe asengami kozonga lisusu mardi.
Mokimi bitumba moko ya Rwanda andimi ete abomi lelo sango moko apesaka ye esika ya kovanda na west ya France.
+FARDC endimi ekufisi koleka basoda 2.000 na Ituri mpe ekangi basungi ya ba ADF +FARDC ebotoli mboka motoba na maboko ma ba ADF +Zuma akoti lopitalo mikolo minei yambo kaosamba +Ouattarra abimisi balangami bafundama na bitumba nsima na mabonami
Mokambi ya engumba Kinshasa apekisi mobulu bato baike balingi kosala na biloko ya bayi Inde nsima na liwa lya étudiant Joel Malu na Bangalore (Inde). Totala bokebisi na ye na bililingi ya misala mya sango ya hôtelde ville ya Kinshasa.
Na Goma, na Nord-Kivu, bato minigi balobi bazali kosalela "molunge" na matiti na ndenge mingi mpo na koluka kobika na COVID-19. Minganga bakebisi mpo moto akoki koyeba te nkisi boni bakotisi na nzoto. Reportage na français na Zanem Nety Zaidi .
Mbeba ya makoki ma bomoto ekitaki na 20% na sanza misato ya yambo ya mobu moye 2021 kotala na eye ya 2020, elobi Bureau Conjoint ya Nations unies mpo na makoki ma bomoto.
Misala bayi molongo basalaki mpo na kobundisa Ebola kati na 2018 mpe 2019 mifutaki misolo na basimba minduki mpe na bayi mampinga mpo na kozwa nzela ya kokoma bisika bakoni bazalaki na Nord-Kivu mpe Sud-Kivu, elobi Groupe d’étude sur le Congo (GEC).
Voir plus