+72H Mboso N'kodia apesi bakambi biyamba na ntina ya koyokana na kopona mokambi ya CENI ebandi kotangama +Guterres na Maison Blanche bapameli bobengani ya bakambi ya misala ya ONU na Ethiopie +Macron apameli Mali na koloba ete France etiki yango +Ba Sénateurs bapesi maboko na Matata Ponyo
Président Paul Kagame ya Rwanda akomi na Abu Dhabi, na Emirats arabes unis, epayi wapi akozala na likita lya politiki lya mokili ya 2021 ( 2021 World Policy Conference).
Mboso Nkodia asengi mpe na bayi opposition kotika ba process-verbaux ya boboni ya bato ba bango banei bakozala na bureau.
Christophe Moukouéké akomaka kalaka mokonzi ya UPADS ya nkondo Pascal Lissouba, yambo na kokima mboka. Azongaka na 2007.
Nicolas Sarkozy, mokonzi ya kala ya France akatelami mobu moko ya boloko na likambo lya Bygmalion mpo ba misolo mipesamaki na bobuki mibeko na campagne présidentielle ya 2012.
+Assameblée nationale ya RDC epesi ministre Kibassa 48H mpo na kolimbola soki RAM etiama na kolanda mibeko +Marche ya Lamuka ekomi le 16 octobre +Opposition na mbulamatari ya Centrafrique na masolo na Rome na St Egidio +Bakambi bingumba ya Kinshasa na Brazzaville bazali kokutana na RDC
Assemblée nationale epesi minsitre ya ya PT-NTIC (Poste-Télécommunications mpe nouvelles technologies ya information mpe ya la communication), Augustin Kibassa Maliba ngonga tuku minei na mwambe mpo na kozonga kolakisa bango soki RAM to mpako ya ezwamaka na téléphone mobile esalama na kola mibeko.
+Lamuka etindiki "marche" na yango nsima na meeting na yango le 9 octobre na Ste Thérèse N'Djili +Dr. Tedros asengi bolimisi mpo na basali ba OMS bazwaki basi na makasi ntango ya Ebola na est ya RDC +Obama atie libanga lya kobanda kotonga centre présidentiel na ye na Chicago
Lisanga Lamuka likambami na Adolphe Muzito na Martin Fayulu lindimi kopusa marche na yango nsima na meeting na yango ya le 9 octobre na N'Djili, kolanda masolo bazalaki na yango na mokambi ya engumba Kinshasa, Gentiny Ngobila.
Mokambi ya OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono), Dr. Tedros Adhanom Ghebreyesus alobi ayoki mpasi na motema nsima na commission indépendante moko kondima ete basali ba mabongisi maye bazwaki basi na makasi ntango ya Ebola na est ya RDC.
Bato babale basusu bakangami na Kananga, na Kasaï central, na likambo ya vidéo ya bobomi ya ba experts ya ONU elongo na bato bazalaki kotambwisa bango na 2017 na bitumba ya ba Kamuina Nsapu.
+Ngobila asengi na Lamuka na NOGEC kokotisa mikanda mpo na kokotambola na bisika apesi ndingisa +Katumbi alaki kosenga mbulamatari kosala lisusu makasi mpo na kosunga baye bazwaki mpasi ya volcan Nyiragongo +Moto moko abambi Macron maki +Lac ya lave emonisami na volcan Nyiragongo
Moto moko abambi président Emmanuel Macron ya France maki na milulu ya bofungoli Salon international de la restauratiion azalaki kokamba. Police ekangi moto moko. Le 8 juin, moto moko abendaki M. Macron na nzoto.Totala.
Moïse Katumbi ya Ensemble pour la république akomi na Nyiragongo, na Nord-Kivu, mpo na kotala baye bazwa likama ya volcan.
Mampinga ma Ekolo Congo démocratique mabomi basimba minduki mwambeya lingoTshinakilimya mpe makangi misusu na Makyanga, pene na Komanda. Basimba minduki bakotaki na MAkayanga o'mokolo mwa eyenga mpe batumbaki biloko mingi. Erikas Mwisi azwaki maloba ma mokambi ya soda, général Jony Lubuya Nkashama.
Bayi Lamuka basakoli ete botamboli babengisi o’mokolo mwa le 29 septembre botikali lokola bango babongisaki.
+Lamuka elobi ekotambola ndenge ebongisaki ata Ngobila aboyi na ndelo ya aéroport kino pont Matete +Théoneste Bagosora afundama kozala "erveau" ya génocide randais akufi na boloko na mibu 80 na Mali +Papa François asengi mokili kondima ba migrants _Ba sociaux-démocraes balongi mpo na Allemagne
+Colonel Mahamat Idriss Deby na mobembo na Brazzaville mpo na masolo na Sassou +Kagame na Nyusi ya Mozambique basali boyokani na mobembo ya mokonzi ya Rwanda mpo na kotala mampinga ma ye na Cabo Delcado +Botiami ya bato na ba cachots ya direction départementale ya police na Brazzaville bopamelami
Babundi ya makoki ma bomoto ya CAD (Centre d’actions pour le développement) bapameli lolenge bakengemi batiamaka na lolenge bato bakoki kozala te.
Reporters sans frontiers (RSF) lokola mpe Journalsite en danger (JED) balobi bamitungisi mpo na mopanzi sango Sosthène Kambidi ya Actualité.cd oyo apesaka mpe sango na VOA Lingala, akangami wuto mikolo mitano na Kinhsasa, na misala mya sembo ya ba soda.
Voir plus