Likita lya bokitani na bokonzi lisakoli Charles III nkumu mpe mokonzi ya Royaume -Uni na milulu misalami mokolo mwa mposo na Londres. TOTALA
➡️Charles III asakolami nkumu ya Royaume-Uni ➡️Putin apesi losako na Charles III na bosakolami bwa ye bo' nkumu nsima na liwa lya Elizabeth II ➡️Parquet esimbi ndako moko ya Christel Denis Sassou na France ➡️Tribunal elongoli botelemisami ya mosala Ramaphosa apesaki na mokambi ya bitumba na kaniaka
Nkumu Charles III asakolami lelo mokonzi ya Royaume-Uni na likita lya bokitani lisanganaki na Londres. Lisakoli lyango lisalami mikolo mibale nsima na liwa lya mama wa ye nkumu ya mwasi Elizabeth II oyo akambaki ekolo eye mibu ntuku sambo na limemya mpe potosi.
➡️Losako lopesami kowuta bisika na bisika nsima na liwa lya nkumu ya mwasi Elizabeth II ➡️CPI ekopesa ekateli na bosenga ya bato bazwa mpasi na mbeba ya Ntaganda le 12 sept. ➡️Bazuzi ya France balobi ntina ya kolandela mampinga ma France na génocide ya Rwanda ezali te ➡️Lourenço akolapa ndayi le 15
Losako lopesami kowuta bisika na bisika nsima na liwa lya Nkumu ya mwasi Elizabeth ya mibale ya Royaume-Uni oyo awuti kokufa. Prince Charles nde akitani na Reine Elizabeth II. Nkondo nkumu ya mwasi oyo awuti azalaki na mibu ntuku libwa na motoba mpe atikalaki mibu ntuku sambo na ngwende.
➡️Mituka mikosamba kaka 20 litres to 30 litres ya carburant na RDC mpo na nkwokoso ➡️Bobangi mpo na bokolongono ya Reine Elizabeth II ya Royaume-Uni ➡️Obama na molangani wa ye bazongaki kolakisa elilili na bango na Maison Blanche ➡️ Koleka bato 38 bakufi na boningami ya mabele na Chine
Mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique elimboli ete esengi botekami kaka moke moke ya carburant mpo ete yango esila te yambo na bokomi ya masuwa misusu. Ministre ya Hydrocarbures, Dider Budimbu asengi bomwana mboka mpe alaki ete masuwa misusu mikokoma le 14 septembre.
Mokonzi ya kala ya Etats-Unis Barack Obama na molongani wa ye Michelle Obama bazongaki na Maison Blanche, ndako ya mokonzi ya Amerika, mpo na kofungola elili na bango. Babengisamaki na Joe Biden, mokonzi yoy azali na ebonga. Totala
➡️Mibu 25 mikoki wuto liwa lya Mobu Sese Seko mokonzi ya kala ya RDC ➡️Ndayishimiye atie ministre wa Yambo na mbulamatari ya sika nsima kopamela bayike koluka kokweyisa nokonzi na Burundi ➡️Washington ebakisi 1,3 millions $ mpo na maponami na RDC ➡️Likita lya kobongisa COP27 na Caire na John Kerry
Vladimir Putin, mokonzi ya Russie akitaki ye moko kotala ndenge bobongisi bitumba mampinga ma Russie mazali kosala na bikolo misusu lokola Chine bazali kosala na Sergeevski. Misala miye mibengami Vostok-2022 mibandaki le 1er septembre na est ya Russie.
➡️Cour constitutionnelle eboyi bosenga bwa Unita ya koboya elonga ya MPLA na Lourenço na maponami ➡️Zuzi moko andimi botiami ya "expert indépendant" mpo na kotala mikanda FBI ezwaki na ndako ya Trump ➡️Bacivili 35 bakufi na bombes artisanal na Burkina Faso
➡️Cour suprême esakoli Ruto molongi ya maponami mpe mokonzi ya mboka na Kenya ➡️Tshisekedi alobeli RDC bo' mboka ya eyano na mokili na bokutani ya climat na Rotterdam ➡️Likita lya kolengela COP27 libandi lelo na Yangambi ➡️Cour constitutionnelle ezali kotala bosenga ya kobwakisama maponami na Angola
William Ruto alobi na lisikulu, wuto ndako na ye, ete atandi loboko na bambanda baye ya politiki mpo "bazali banguna te". Asakoli yango nsima na Cour suprême kosala kondima nilembo bya CNE bisakoli ye molongi na maponami ma mokonzi ya mboka. Akolapa ndayi le 13 septembre.
Nzoto ya Mihail Gorbachev, mokonzi ya suka URSS yambo na bokwetisami na yango mpe kokoma Russie, etiamaki o’lilita na Moscou nsima na matabga na mboka epayi mokonzi oyo azali kokamba ekolo sika Vladimir Putin azalaki te. Mikhail Gorbachev akufaki le 30 aout 2022 na mibu 91 nsima na bokono bolayi.
➡️Bituluku bya bana ba Russie bapesi losako ya suka na Gorbachev yambo na bokundami na ye ➡️Bato bayebana na masano mpe na pilitiki bapesi lokumu na Serena Williams oyo azali kotika tenis ➡️Mabota 700 ma Rutshuru bakima btiumba ya M23 babenganami na Ungada ➡️Fusée ya etinda Artemis ezelisami moke
➡️Bureau ya Ass. Nat. ekebisi bakeli mibeko kondima sango elobi bafutamaka 21.000$ ➡️Unita ekotisi mokanda ya koboya elonga ya Unita na Lourenço na Angola ➡️Alanga nzembo ya Rwanda Bruce Melodie akangami na Burundi ➡️RDC ebwaki mbela mpo ba blocs pétroliers 21 na gaziers misato
Vladimir Putin mokonzi ya Russie akozala te na matanga ma mokambi ya suka ya Union Soviétique Mikhaïl Gorbachev o’mokolo mwa mposo mpo ntango na ye ekopesa nzela te, elobi molobeli ya ndako ya bokonzi ya Russie. Asi akendaki na lopitalo lonene ya Moscou (TSKB) epayi Mikaïl Gorbatchev akufaki.
➡️Putin akozala te na matanga ma Gorbachev ➡️Russie ebandi misala minene mya mampinga ma yango na bikolo biyokonaka malamu na yango lokola Chine ➡️Bana 244 millions bazali kokende kelasi te na mokili ➡️RDC esengi UA kokotela yango mpo ONU etala rapports ya ba experts eye efundi Rwanda kosunga M23
Voir plus