➡️UPDF ebomi ba ADF 11 bakatisaki Uganda ➡️Koleka bato 100 bakufi na mpela ekasi na Kinshasa ➡️moussa Dadis Camara alobi na bosambisami ete etikala te kopesa mitindo ya kboma bato ba botemelei ya 2009 ➡️Parlement ya Afrique du Su ekozwa mokano lelo mpo na bofundami ya Ramaphosa
➡️Bakonzi baike ba bikolo bya Afrika bakomi na Washington DC mpo na Bokutani Afrika-Amerika ➡️Bakeli mibeko mpe bikolobya Union européenne bazali kozwa mikano mpo na mpako ya carbone na ndelo ya mboka na bango ➡️Nzoto ya étudiant ya Zambie akufi na bitumba na Ukraine na kokokisama na Wagner ezongi
Ba "Bleus" ya France balongi Angleterre 2-1 na 1/4 ya finale ya Mondiale Qatar 2022. France ekobeta o'mokolo mwa misato na Maroc eye elongaki mwa ngonga yambo na yango Portugal 1-0. Match mosusu ya demi-finale ekozala mokolo mwa mibale kati na Argentine na Coratie.
Ba Lions ya Atlas ya Maroc bakomi ekolo ya yambo ya Afrika ya koleka na1/2 dinale ya Mondial. Eleki nsima na kobeta Protugal ya Cristiano Ronaldo 1-0.
Nsima na 2-2 na suka ya prolongations, Messi na Argentine balongi Pays-Bas na bobeti mindegete (4-2) na 1/4 ya finale ya Mondial Qatar 2022. Sika Argentine ekobeta 1/2 finale na Croatie eye elongaki Brésil na bobeti ndembo na mongete mpe lokola mwa ngonga yambo na yambo.
Craotia to Croatie ekamwisi lisusu na Mondial Qatar 2022 na kolongaka Brésil na 1/4 na bobeti ndembo na mongete. (4-2) nsima na kokabola 1-1 na bobakisi ntango. Brésil elongwe ata kutu Neymar atiaki ndembo ya malonga mpe aleki sika Pelé na mingete 77 atie mpo na ekolo na ye.
➡️Mokambi ya HCR Volker Türk alobi ayoki nsomo na bobomi bacivili 131 M23 efundami kosala na Kishishe ➡️Bikwira, Willy Ngoma na bato basusu 25 bapesami etumbu na UE ➡️Teodoro Obiang Nguema Mbasogo alapi ndayi mpo na kotikala lisusu na bokonzi mibu sambo mpo na mbala ya motoba
➡️Etats-Unis na bikolo bisusu basengi bozali bwa ngambo inso na maponami CENI ezali kosalisa ➡️M23 endimi kobanda kolongwa kasi esengi yambo masolo na Kenyatta mpe Lourenço ➡️Babundi 14 ya bitumba ya Bayaka na Bateke bakangami na Kwango ➡️Ba démocrates balongi mpe ebonga ya Sénat na Georgia na USA
6-1 nde elonga ya Portugal likolo lya Suisse na match ya suka ya 3e ya Mondial Qatar 2022 na stade Lusail na Doha.
Moyambi ya Maroc Unai Simon akangaki ba penalties misato ya Espagne mpe apesi nzela na ba "Lions ya Atlas" koleka na 1/4.
➡️Ministre Vincent Biruta ya mambi ma Baoaya ya Rwanda apameli Washington na molongo kotala kaka ngomba moko na matata na est ya RDC ➡️Kinshasa elobi motango mwa bato babomaki na M23 na Kishishe mokomi 300 ➡️Balakisi bilongi ba RDC bazali na likita lya kobundisa kaniaka na molongo na Washington DC
Brésil etiaki mingete minei nayango minso na eteni ya 45' ya yambo. Lisano lyango limonanki mpenza pete. Kasi Corée du Sud to Korea ya Ngele elamaki na eteni ya mibale kasi ekokaki te.
Ba Lions ya Teranda balongwe na kokweya na 0-3 liboso lya Angleterre. Bayi Angleterre bakobeta 1/4 ya Finale na bayi France baye balongaki na match ya yambo ya 8e Pologne na 3-1. Ekozala mokolo mwa mposo 10 décembre 2022 na mpokoya.
Na mingete mibale ya Mbappé mpe moko ya Giroud, France elongi Pologne 3-1 mpe eleki na 1/4 ya finale na Mondial Qatar 2022.
Bakimusi ya France basepeli na elonga ya ekipi na bango na 8e ya Mondial Qatar 2022 3-1 liboso lya Pologne. Baike ya Pologne mpe bandimi ete France elekaki makasi. Totoala
Lionel Messi alakisi boyebi mpe makasi na ye na kopesa nzela na Argentine koleka na 8e ya finale na 2-1 liboso lya Australie. Messi atiaki mongete ya liboso mpe azangi kotia misusu atoko Australie mpe ebangisaki bango. Mayele mpe kimokolo ya Argentine nde elobi.
Pays-Bas Netherlands nde ekolo ya yambo eleki na 1/4 de finale ya Mondial Qatar 2022 na kopolisa Etats-Unis 3-1. Bayi Amerika bakangi bisaka nsima na kopola match ya yambo na momekano moye. Ekipi na ya bayi Amerika aezalaki ya mibale na bolenge na Mondial eye, ezali kolengela coupe du monde ya 2026.
Balandi ba Cameroun balobi bayaki match ya suka ya groupe G ya Mondial Qatar 2022 kaka kobeta Brésil. Basepeli mingi ata balongwe.
Cameroun ekomi sika ekipi ya yambo ya kopolisa Brésil wuto Mondial Qatar 2022 wuto ebandaki. Ba "Lions indoptables" balongwe kasi basepeli. Suisse eleki na kopolisa Serbie 3-2.
Voir plus