Président Félix Tshisekedi aponami vice-président to mokambi molandi ya SADC, lisanga lya nkita mpe ya ntombwa lya bikolo bya Afrika ya nse. Ezalaki na likita lya mbala tuku mibale na moko ya SADC lisalemi na Lilongwe, na Malawi.
Président Lazarus Chakwera ya Malawi nde aponami président ya SADC mpe akitani na moyi Botswana Mokgeetsi Masisi.
Boponami bwa Félix Tshisekedi bo’ vice-président ya SADC bokopesa nzela ete azwa bokambi ya SADC na 2022.
RDC epesaki mpe nkombo ya Faustin Luanga mpo na ebonga ya secrétaire exécutif kasi misala mya ba ministres mindimi yango nanu te.
Esengeli kozela mokano ya bakonzi ya bikolo lobi mokolo mwa misato.