Nangaa alobi batomboki ba AFC bakokoma Kinshasa kasi batelemi nanu na Goma
Your browser doesn’t support HTML5
Corneille Nangaa, mokambi ya batomboki ba Alliance Fleuve Congo (AFC) alobi na bapanzi nsango na Goma ete mposa na ye ezali kokoma kino Kinshasa kasi AFC ekotelema mwa moke na engumba mokonzi ya Nord-Kivu mpo na komilengele. Alobi basoda ya mampinga baye bakangami, bakokota na AFC. Fiston Issewami