Potopoto ya moto etelemisami na bokoti ya engumba mokonzi ya Nord-Kivu.
Bilili bya botomboki bwa volcan Nyiragongo na Nord-Kivu
Pene na bato 15 bakufi na botomboki bwa volcan Nyirangongo na Nord-Kivu, kolonda mbulamatari. Totala bilili awa. Ndako mpe biloko biike biziki kasi potopoto ya moto etelemisami pene na bokoti na engumba Goma.

12
Bana bake bazali kosakana na lava pene na ngomba nyirangongo na Goma, Nord-Kivu, 23 mai 2021.

13
Bavandi ba Goma bazali kokima botomboki bwa volcan Nyirangongo na Goma, Nord-Kivu, RDC, 23 mai 2021.

14
Mwana moko avandi na nzela ntango bato bazali kokima volcan Nyirangongo na Goma, Nord-Kiv, 23 mai 2021.

15
Bato bazali kotambola kati na molinga ya mabanga ya lava ekauki kowuta na volcan Nyiragongo, Nord-Kivu, 23 mai 2021.

16
Bitakila bya ndako moko ebebisamami na moto ya volcan Nyiragongo, Nord-Kivu, 23 mai 2021.