Jean-Jacques Wondo nganga na mayele na maye matali mampinga mpe bokengi oyo akatelamaki etumba ya liwa na bomeki kokweyisa bokonzi ya président Félix Tshisekedi na sanza ya mitano ya mobuleki, abimisaki lobi loleki na boloko.
Ministere ya Mambi ma Bapaya ya Belgique esakoli ete Wondo esengeli akoma na mboka eye o mokolo mwa mosala mitano. Jean-Jacques abotama na RDC kasi akoma moyi ekolo Belgique.
Bakonzi ba Belgique balobi été bobimisami bwa bosalami nsima na makasi misala mya Babapya esalaki.
Etumbu na ye na liwa na kofundama kozala moto atindaki Christina Malanga na basungi baye komeka koluka kokweya mokonzi ya ekolo Congo Démocratique, ememaki bobendaki kati na RDC na Belgique. Christian Malanga abomamaki na butu ya bomeki kokweyisa bokonzi.
Etumbu yango endimamaki na bosambisami ya kozongela, kasi M. Wondo azwaki bokono na bongangami bwa ye na boloko ya basoda ya N'Dolo, na Kinshasa epayi azalaki wuta sanza ya motoba ya mobu moleki
Wondo na bato basusu ntuku misato na mitano, kati bango mwana ya Chistian Malanga, bayie Amerika babale basusu, bapesaki etumbu eye ya liwa.
Forum